Non assistance - Koffi Olomide

Non assistance

Koffi Olomide

00:00

06:58

Similar recommendations

Lyric

Ebembe na nga yang'oyo

Eza nanu kotanga makila

Yakoyoka liloba na nga ya suka

Olingaka nga, he he he

Olela nga

Yakozwa nga ngo okawusa nga mpota

Responsabilité na yo na cas na nga

Yo moko oyebi eh naza na nga awa sans rancune

Kaka ndambu amertume

Naza na nga awa na regret te yebaka soki demain

Si c'etait à refaire nakolinga yo lisusu kaka

Hum liwa to pe lobiko yo moko okoponela nga

Motema na nga eza pompe ya bolingo no ekokangamaka te

Pinzoli na nga po ekawuka loba liloba se lyoko

Mabe oyo osali nga nazui yango neti sacrifice

Peut etre que ndenge olingaka nalinga yo nazangisaki ndambu

Nakosamba na nani

Moto eza kotumba nga

Nga moko napelisaki ango na instinct ya pyromanie

Yoboya no nga mbala kama

Nabondelaka yo kaka

Photocopie ya souffrance eza oyo ya yesu na kuruze

Origine ya chemin de la croix

Eza oyo po nga nalini yo

Nazo vivre eh, nazo vivre ehhh

Bandela kosekisa nga

Parle moi encore d'amour

Bongo ngonga ya liwa na nga

Ami ekoma retardé

Ndoto na nga ata deja kala

Esi ekomaki vision

Etumba na nga ekotikala

Se conquete ya amour na yo

Po kolinga eya kobongwana koyina

Baninga bakosalaka comment

Naza na nga na probleme te nyonso kaka se yo

Kombo na nga eza porte fungola oyo ekofungolaka nga

Eza na maboko ma yo kokweyisa yango te

Mokolo okolinga, heure okopona

Nakozala à ta disposition nyonso okolinga butu to moyi

Ekozala nango un temps

Mbala moko, un temps kaka

Ima olé, oya mama lelisa eh mawa

Moto azowa eh bolingo obo koya, pourquoi

Non assistance en personne en danger, nkana

Eza punissable epa ya mbula matari eh, nkana

Qui seme le vent na mokili, balobaka eh

Recolte la tempete nini oyo nga nalonaki eh

Po lelo naya ko recolter botutu ya bobwana boye

Lelo nandimi bakulaka ndenge balobaka eh

Mwana mokolo oyo okoliya ligorodo eh

Eza te mokolo oyo okobima ah makwanza eh, keba mwana

Kaka bolingo oyo epesaka esengo ngo

Kaka yango eyaka kokomisa moto malheureux

Kaka mabele oyo epesaka ndunda na nguba ngo

Kaka yango eyaka koliya nzoto ya moto pourquoi aaaaahhhhh

Kaka loboko oyo e caressaka na tendresse eh

Kaka yango eyaka lisusu kotiya moto linzaka eh yo didi stone

Kaka bolingo oyo epsesaka elengi ngo

Kaka yango eyaka lisusu kobota mawa comment, namituni eee

- It's already the end -